Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ;