Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.
Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.
Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.