Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 21:2 - Mokanda na Bomoi

2 na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango : « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 21:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi.


Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.


Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.


Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ