Mpe kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki : Aneri mpe bamboka na yango ya mike, Bileami mpe bamboka na yango ya mike. Bingumba nyonso oyo elongo na bamboka na yango ya mike epesamaki epai ya bituka mosusu ya bana ya Keati.
Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.