Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 20:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 20:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.


Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi.


Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi.


Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.


Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso.


Moyize aponaki bingumba misato na ngambo ya este ya Yordani,


mokonzi ya Kedeshi moko mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli moko


Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).


Bingumba batonga makasi ezalaki : Tsidimi, Tseri, Amati, Rakati, Kinereti,


Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.


Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki) ;


Epai ya bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, bapesaki Ebron lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Libina,


Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, bapesaki bango : Sishemi lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Gezeri,


Kati na libota ya Nefitali : Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato.


Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele ; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe.


Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ