Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.
Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango.