Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bakendeki na pokwa na tango oyo bakangaka ekuke ya engumba. Nayebi mpe te soki bakendeki na nzela nini. Bolanda bango noki. Bokoki solo kokanga bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 2:5
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango molili ya pokwa ekweyaki na bikuke ya Yelusalemi, liboso ete mokolo ya Saba ebanda, napesaki mitindo ete bakanga bikuke yango mpe bafungola yango kaka soki mokolo ya Saba eleki. Bongo, natiaki ndambo ya basali na ngai na bikuke mpo na kopekisa bokoti ya mikumba, na mokolo ya Saba.


Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba.


Na tango wana, na mikolo wana, › elobi Yawe, ‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi kasi bakomona yango te, masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te ; pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.


Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika ; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. »


Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki : — Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki.


Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza.


Bongo, batindami ya mokonzi babimaki mpo na kolanda banongi na nzela oyo ekenda kino na esika oyo bakatiselaka ebale Yordani na makolo. Tango kaka batindami yango babimaki na engumba, bakangaki mpe mbala moko ekuke.


Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te.


Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki : « Azali kobela. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ