Elize alobaki na bango : — Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.
Basi oyo babotisaka bazongiselaki Faraon : — Basi ya Ba-Ebre bazali lokola basi ya Ejipito te. Bazali makasi, babotaka liboso ete basi oyo babotisaka bakoma.
Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba : Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele.
Boye, mokonzi ya Jeriko atindaki maloba oyo epai ya Raabi : — Bimisa mibali oyo bayaki epai na yo mpe bakotaki na ndako na yo, pamba te bayei nde mpo na kononga mokili mobimba.
Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.
Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.