Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye, mokonzi ya Jeriko atindaki maloba oyo epai ya Raabi : — Bimisa mibali oyo bayaki epai na yo mpe bakotaki na ndako na yo, pamba te bayei nde mpo na kononga mokili mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 2:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto !


Kasi tolobaki na ye : « Tozali bato ya sembo, tozali banongi te.


bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo ? »


Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki : — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi ? Mwasi azongiselaki bango : — Bakatisi mayi. Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te ; mpe bazongaki na Yelusalemi.


bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Bato wana bayei epai na yo mpo na kotala mpe kononga mokili mpo ete babebisa yango. »


ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.


« Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.


Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango : — Botala ! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te.


Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye ; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.


Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.


Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni.


Bayebisaki mokonzi ya Jeriko : — Tala, bato moko kati na bana ya Isalaele bayaki awa na butu mpo na kononga mokili.


Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki : — Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki.


Sisera alobaki na Yaeli : — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo : « Moto azali awa ? » Zongisa : « Te ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ