Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 2:24 - Mokanda na Bomoi

24 Balobaki na Jozue : — Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso ; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 2:24
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.


Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.


Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.


Banongi oyo mibale bazongelaki nzela na bango, babimaki na bangomba mikuse, bakatisaki ebale mpe bakomaki kino epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni. Bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango.


Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.


Yawe alobaki na Jozue : — Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba.


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye.


Yawe azongisaki : — Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango.


Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele.


Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ