Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 2:23 - Mokanda na Bomoi

23 Banongi oyo mibale bazongelaki nzela na bango, babimaki na bangomba mikuse, bakatisaki ebale mpe bakomaki kino epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni. Bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 2:23
4 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na bango kokabwana, bakendeki na bangomba mikuse mpe bavandaki kuna mikolo misato kino tango bato oyo bazalaki kolanda bango balembaki koluka bango na nzela nyonso. Lokola bamonaki bango te, bazongaki na bango.


Balobaki na Jozue : — Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso ; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso.


Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele.


Bazongisaki : — Totelema, tokende kobotola mokili na bango ! Tomoni ete mokili yango ezali malamu penza. Boni ! Mpo na nini bovandi kimia boye ? Bozala bagoyigoyi te mpo na kokende kokota mpe kobotola mokili yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ