Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 2:18 - Mokanda na Bomoi

18 soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 2:18
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.


Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.


Ndenge nini ngai nakoki komona pasi kokweyela bato na ngai to komona kobebisama ya libota na ngai ?


Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.


Bibebu na yo ezali lokola kitendi ya motane, mpe elobeli na yo epesaka esengo ; matama na yo ezali lokola mbuma ya grenade, na se ya vwale.


Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba : bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope.


Nganga-Nzambe akokamata bakoni ya nzete ya sedele, ya izope, singa ya lino ya motane makasi, mpe akobwaka yango kati na moto oyo ezali kopela mpe ezali kozikisa ngombe ya mwasi.


Bongo na likolo ya biloko yango, bakotanda liputa ya langi ya motane makasi, mpe bakozipa biloko wana nyonso na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale. Mpe bakotia balate oyo ekosunga mpo na kotombola mpe komema mesa.


Yesu alobaki na ye : — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.


Wana bazalaki kosolola, Petelo akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani.


Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.


Akoyebisa yo maloba oyo, na nzela na yango, okozwa lobiko, yo mpe libota na yo mobimba ! »


Tika ete Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya libota ya Onezifore, pamba te abondisaki ngai mbala mingi mpe ayokaki soni te mpo na minyololo na ngai.


Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.


Raabi azongisaki : — Boye, tika ete esalema ndenge bolobi. Atikaki bango kokende, mpe bakabwanaki. Bongo na sima, akangisaki singa ya motane na lininisa.


Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.


Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ