Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Banongi bayebisaki ye : — Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 2:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.


Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.


Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye !


Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene ! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka.


Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »


Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki : — Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai : « Batela moto oyo ete akima te ! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. »


Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.


Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.


Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !


Mokonzi ya basoda atikaki elenge mobali yango ete azonga ; kasi liboso ete akende, akebisaki ye : — Koloba na moto moko te likambo oyo oyebisi ngai.


elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa.


Boye, Raabi abimisaki bango na lininisa mpe akitisaki bango na singa, pamba te ndako oyo azalaki kovanda ezalaki ya kokangama na eteni ya mir ya engumba.


Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.


Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko : — Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye.


Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.


Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ