12 Boye sik’oyo, bolapa ndayi liboso na ngai na Kombo na Yawe ete bokosalela libota na ngai bolamu ndenge ngai nasaleli bino. Bopesa ngai elembo ya solo ;
mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.
Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.
Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai.
Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa.
soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo.
Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso.
Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko : — Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye.
banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye : « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. »
Davidi atunaki ye : — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ? Azongisaki : — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.