Jozue 19:40 - Mokanda na Bomoi40 Na mbala ya sambo, zeke ekweyaki epai ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Tala bikolo ndenge ekomami kolanda bakombo na yango : Libota ya Dani ekozwa eteni moko ya mabele : mondelo na yango ekolekela na nzela ya Etiloni kino na Lebo-Amati, Atsari-Enani mpe mondelo ya nor ya mokili ya Damasi pembeni ya Amati ; boye mondelo na yango ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.