Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.
mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ;
Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi,
Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele. Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki.