Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 19:28 - Mokanda na Bomoi

28 Ekendeki kino na Ebron, Reobi, Amoni mpe Kana kino na Sidoni, engumba monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 19:28
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)


Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni.


Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba.


alobaki : « Okosepela lisusu te, yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo ! Telema, katisa na ngambo ya Shipele ! Ezala kuna, okozwa bopemi te. »


Bino bavandi ya esanga, bino bato ya mombongo ya Sidoni, oyo nzela ya ebale ekomisa bazwi, bovanda nye !


Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, pamba te ebale monene elobi : « Natikala koyoka pasi ya kobota te, natikala na ngai mpe kobota te, natikala na ngai kobokola bana mibali to kokolisa bana basi te. »


« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango !


Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango.


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.


Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango.


bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.


Elikati, Reobi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.


Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi.


Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ