24 Na mbala ya mitano, zeke ekweyaki epai ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango.
Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea : Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami.
Baana, mwana mobali ya Ushayi : moyangeli ya Aseri mpe ya Bealoti ;
Libota ya Aseri ekozwa eteni moko ya mabele : ekozala na mondelo ya libota ya Dani, longwa na este kino na weste.
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele na bango ezalaki : Elikati, Ali, Beteni, Akishafi,
Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi.
Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ? Aseri atikali pembeni ya ebale, avandi pembeni ya libongo na ye.