Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.
Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda.