17 Na mbala ya minei, zeke ekweyaki epai ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.
Isakari azali ane ya makasi oyo elali kati na mapango mibale.
Jozafati, mwana mobali ya Paruya : moyangeli ya Isakari ;
Libota ya Isakari ekozwa eteni moko ya mabele : ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Simeoni na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ;
Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango.
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango.
Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na : Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi,
kati na libota ya Simeoni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Levi : bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Isakari, bato nkoto zomi na mibale ;