Libota ya Zabuloni ekozwa eteni moko ya mabele : ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Isakari, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ;
Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi.
Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
Bazwaki eteni ya mabele ya libota ya Simeoni kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda, pamba te eteni ya mabele ya libota ya Yuda ezalaki monene koleka. Yango wana, bakitani ya Simeoni bazwaki libula na bango kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda.