Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 18:6 - Mokanda na Bomoi

6 Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 18:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tango alobaki : « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo ! »


Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.


Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.


Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.


Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo.


abebisaki bikolo sambo kati na mokili ya Kanana mpe apesaki mabele na bango lokola libula epai ya bato na Ye.


Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota.


Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.


Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »


Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo : « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ