Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 18:3 - Mokanda na Bomoi

3 Jozue alobaki na bana ya Isalaele : « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 18:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.


Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi : ‹ Oh Siona, kobanga te ! Tika ete maboko na yo elemba te !


Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango : « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te ? »


Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.


Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi.


Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.


Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele.


Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota ; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai.


Bazongisaki : — Totelema, tokende kobotola mokili na bango ! Tomoni ete mokili yango ezali malamu penza. Boni ! Mpo na nini bovandi kimia boye ? Bozala bagoyigoyi te mpo na kokende kokota mpe kobotola mokili yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ