Jozue 18:28 - Mokanda na Bomoi28 Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.