Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 18:26 - Mokanda na Bomoi

26 Mitsipe, Kefira, Motsa,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 18:26
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga : moko, kombo na ye ezalaki « Baana ; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame,


Bongo mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, kolongola ata moto moko te ; mpe bamemaki longwa na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela kuna. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kolendisa engumba Geba kati na etuka ya Benjame, mpe engumba Mitsipa.


Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa ; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango.


Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : nkama sambo na tuku minei na misato.


Jeremi akendeki na Mitsipa epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mpe avandaki esika moko na ye kati na bato oyo batikalaki kati na mokili.


epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste ; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba ; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.


Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.


Tango bato ya Amoni basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Galadi, bana ya Isalaele basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Mitsipa.


Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali.


Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.


Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana.


Samuele alobaki na bango : « Bosangisa bato nyonso ya Isalaele, na Mitsipa, mpe ngai nakosambela Yawe mpo na bino. »


Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ