Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 18:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 18:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »


Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,


Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.


Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ;


Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste.


Kibitsayimi mpe Beti-Oroni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.


lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni ; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ