Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 17:6 - Mokanda na Bomoi

6 Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 17:6
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Libota ya Manase ekozwa eteni moko ya mabele : ekozala na mondelo ya libota ya Nefitali, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.


Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango :


Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba,


ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.


Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani.


Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua.


Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani ; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ