anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !
Bakitani ya Jozefi balobaki na ye : — Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda.
Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.
Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.