Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 17:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bakitani ya Jozefi balobaki na ye : — Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 17:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana kaka, likolo eyindaki makasi na mapata ya mvula, mopepe eyaki, mpe mvula makasi enokaki. Akabi amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli.


Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli.


Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.


Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli : « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli.


Baana, mwana mobali ya Ayiludi : moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami ;


Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. » Boye mosakoli afungolaki ekuke mpe akimaki.


Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba : Tala Jezabeli ! › »


Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala ete lokito ya bitumba eyokana mpo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni ; ekokoma esika ya mabe mpe bamboka mike na yango ekozikisama na moto. Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, » elobi Yawe.


Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).


Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.


Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi : — Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te.


Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.


Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na : Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi,


Yawe azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda. Babotolaki mokili ya bangomba, kasi balongaki te kobengana bavandi ya etando, pamba te bazalaki na bashar ya bibende.


Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni.


Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.


Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ