Jozue 17:15 - Mokanda na Bomoi15 Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,
Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.