Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki : — Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.
Apambolaki bango wana mpe alobaki : Bato ya Isalaele bakotangaka bakombo na bino mpo na kopambola : « Tika ete Nzambe akomisa bino lokola Efrayimi mpe Manase ! » Boye Isalaele atiaki Efrayimi liboso ya Manase.
Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo : eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.
Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki.
Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.