Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 17:13 - Mokanda na Bomoi

13 Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 17:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amonaki ete bopemi ezali malamu, mpe mokili na ye ezali kitoko ; boye mapeka na ye ekomema mikumba mpe abongi mpo na misala ya bowumbu.


Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.


ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo.


Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.


Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.


Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te.


Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi.


Bato ya libota ya Nefitali babenganaki te bato oyo bazalaki kovanda na Beti-Shemeshi mpe na Beti-Anati. Boye, bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango ; kasi bato ya Beti-Shemeshi mpe ya Beti-Anati bakomaki kosala misala makasi.


Boye, bato ya Amori mpe batingamaki kaka kovanda na Ari-Eresi, na Ayaloni mpe na Shaalibimi. Kasi tango ndako ya Jozefi ekomaki lisusu na nguya, bakomaki kosalisa bango misala makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ