Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 16:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 16:7
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda : Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este ; Narani, na ngambo ya weste ; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike ; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike.


Kolongwa na bangomba Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko.


ekobaki kino na Ebale monene. Na ngambo ya weste, mondelo ezalaki longwa na Mikimeta na ngambo ya nor, ebalukaki na ngambo ya este na Tanati-Silo, elekelaki wana kino na Yanoa, na ngambo ya este.


mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.


Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima.


Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ