5 Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ;
Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda : Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este ; Narani, na ngambo ya weste ; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike ; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike.
Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.