9 Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi).
Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku.
Davidi elongo na basoda nyonso ya Isalaele bakendeki na Baala, na Kiriati-Yearimi oyo ezali kati na Yuda, mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo ya Yawe oyo avandaka kati na basheribe.
Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.
Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi.