Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:63 - Mokanda na Bomoi

63 Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:63
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo.


Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.


Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi.


Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame.


Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango ; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ