Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani.
Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli.
Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi ; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.