Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:46 - Mokanda na Bomoi

46 longwa na Ekroni mpe na ngambo ya weste, mabele nyonso oyo ezalaki pene ya Asidodi mpe bamboka na yango ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:46
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia.


Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi ;


Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.


Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi.


Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango,


Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike ; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango.


Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi.


Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ