Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste ; Yoashi azalaki mobateli mafuta ya olive ;
wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna.
Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.
Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.
ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi.