Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:33 - Mokanda na Bomoi

33 Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene : Eshitaoli, Tsorea, Ashina,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:33
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mabota ya Kiriati-Yearimi : bato ya Yeteri, ya Puti, ya Shumati mpe ya Mishirayi. Bato ya Tsorea mpe ya Eshitaoli babimelaki na mabota oyo.


Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame.


Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.


Lebaoti, Shilimi, Ayini mpe Rimoni : bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Libula na bango ya mabele ezalaki : Tsorea, Eshitaoli, Iri-Shemeshi ;


Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te.


Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.


Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ