Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:21 - Mokanda na Bomoi

21 Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi : Kabiseyeli, Ederi, Yaguri,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi.


Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.


Bazalaki kovanda na Beri-Sheba, na Molada, na Atsari-Shuwali,


Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,


na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.


Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango.


Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ