Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:19 - Mokanda na Bomoi

19 Akisa azongisaki : — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:19
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.


Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.


Yango wana, namonaki ete ezali malamu kosenga na bandeko yango ete bakoma epai na bino liboso na ngai, mpo na kobongisa makabo oyo bolakaki. Boye ekomizalela tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo mpe na bonsomi, kasi na makasi te.


Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda : « Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda ; zongisa ye epai ya bato na ye ! Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye, mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye ! »


Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye : — Olingi nini ?


Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango.


Mpe tika ete bakado oyo mwasi mosali na yo amemeli nkolo na ngai epesamela mibali oyo bazali kolanda yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ