15 Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. »
Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango.
Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. »