Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki : Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.


Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »


Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki ! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango : « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki ? »


Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba : wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.


Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi.


Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.


Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ