Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:13
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.


Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.


Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.


Bakitani ya Gerishoni bazwaki : Kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki bingumba oyo : Golani kati na Bashani mpe bamboka na yango ya mike, Ashitaroti mpe bamboka na yango ya mike.


Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame.


Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !


mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;


Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba : wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.


Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki) ;


Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.


Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki.


Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.


Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.


epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ