Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane. Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:12
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ngambo ya weste, ebale monene Mediterane ekozala mondelo. Mondelo yango ekobanda longwa na mondelo ya sude ya ebale monene Mediterane kino na esika oyo etalana na Lebo-Amati. Yango nde ekozala mondelo ya weste.


Libota ya Yuda ekozwa eteni moko ya mabele : ekozala na mondelo ya libota ya Ribeni, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.


Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike ; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango.


Bakokabola mokili yango na biteni sambo ; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ