Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »


Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia.


Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane.


Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri ; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni) ; ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina.


Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane. Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango.


Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango,


Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi).


Bato ya libota ya Yuda babotolaki lisusu Gaza, Ashikeloni mpe Ekroni, elongo na mabele na yango ya pembeni.


Bato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni.


Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki : — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.


Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. Bazongisaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati.


Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ