Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:10 - Mokanda na Bomoi

10 Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri ; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni) ; ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:10
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku.


Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda.


wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna.


Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.


Kayini, Gibea mpe Timina : bingumba nyonso ezalaki zomi elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Yireoni, Migidali-Eli, Oremi, Beti-Anati mpe Beti-Shemeshi. Bingumba nyonso ezalaki zomi na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Ayini, Yuta mpe Beti-Shemeshi, elongo na mabele na yango. Bazwaki bingumba libwa kati na bituka ya mabota oyo mibale : Yuda mpe Simeoni.


Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia.


Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison.


Kasi bokotala yango malamu : soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango ; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ