Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 15:1 - Mokanda na Bomoi

1 Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 15:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.


Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene ; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.


Na ngambo ya sude, mondelo yango ekobanda longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi, ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane. Yango nde ekozala mondelo ya sude.


Libota ya Yuda ekozwa eteni moko ya mabele : ekozala na mondelo ya libota ya Ribeni, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.


kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito. Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo.


na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.


pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.


Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota.


Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi,


Bakokabola mokili yango na biteni sambo ; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ