Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jozue 14:9 - Mokanda na Bomoi

9 Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi : ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jozue 14:9
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango.


Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.


longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Nakopesa bino esika nyonso oyo matambe ya makolo na bino ekonyata, ndenge nalakaki Moyize.


Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama,


Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ